Titus 2

Mitindo na bandimi

1Kasi yo, teya makambo oyo mateya ya solo ezali kosenga. 2Teya mibange mibali ete bazala bato ya lokoso te, bazali bato oyo bakoki mpo na kozwa botosi, bazali bato oyo bayebi komibatela malamu, bato oyo bazali peto kati na kondima na bango, na bolingo na bango, mpe na koyika mpiko na bango.

3Ndenge moko mpe, teya mibange basi ete bazali na bomoi ya bosanto, batongaka bato te, mpe bazala bawumbu ya masanga te, kasi bateyaka makambo ya malamu. 4Bongo bakokoka koteya bilenge basi mpo balinga mibali na bango mpe bana na bango, 5bayeba komibatela malamu, bazala na bomoi ya peto, babongisakabandako na bango malamu, bazala bato malamu, mpe batosaka mibali na bango, mpo ete moto ata moko te aloba mabe mpo na Liloba ya Nzambe.

6Ndenge moko mpe, lendisa bilenge mibali ete bayeba komibatela malamu. 7Kati na makambo nyonso, zala ndakisa epai na bango na nzela ya kosala makambo oyo ezali malamu. Mateya na yo ezala ya peto mpe oyo ezali komema botosi. 8Lobaka maloba ya malamu oyo bato bakoki koloba mabe te mpo na yango, mpo ete baoyo bazali kotelemela yo bayoka soni, pamba te bakozwa ata likambo moko teya mabe oyo bakoloba mpo na biso.

9Teya bawumbu ete batosaka bakonzi na bango, mpe basepelisaka bango na makambo nyonso ; bazongiselaka bango maloba na tembe te 10mpe bayibaka bango te, kasi basengeli kolakisa ete bakoki kotiela bango mitema, mpo ete kati na makambo nyonso oyo bazali kosala, bakomisa mateya ya Nzambe Mobikisi na biso, eloko oyo ezali kobenda bato.

Ngolu, ezali ebandeli ya lobiko

11Pamba te, Nzambe asiʼalakisi ngolu na ye mpo na lobiko ya bato nyonso. 12Ngolu yango ezali koteya biso ete, toboya kozanga botosi na makamboya Nzambe mpe toboya baposa ya mokili ; mpe na tango oyo tozali, tozala bato ya komibatela malamu, bato ya bosembo, mpe bato oyo batosaka makambo ya Nzambe, 13awa tozali kozela elikya ya esengo, komonana ya nkembo ya Nzambe na biso Monene mpe Mobikisi Yesu Kristo. 14Amipesaki ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso, mpe mpo apetola mpo na ye moko, bato oyo bazali ya ye moko, baoyo bazali na posa monene mpo na kosala misala ya malamu.

15Oyo nde makambo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Moto moko te atiola yo.
Copyright information for LinMNB